Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe Nguba na biso
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Nzambe Nguba na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli: — Kobanga te, Abrami! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.
Ebele bazali koloba na tina na ngai: « Nzambe akobikisa ye te! »
Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Totielaka Yawe motema; azali lisungi mpe nguba na biso.
Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai; natiaka elikya kati na liloba na Yo.