Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Elonga kati na Klisto

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Elonga kati na Klisto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 15:57

Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto!

02 Barome 8:37

Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.

03 1 Yoane 5:4

pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso.

04 2 Bakolinto 2:14

Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.

05 1 Bakolinto 15:54-55

Tango oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka ekolata kozanga kokufa, na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama: « Elonga emeli kufa. Oh kufa, wapi elonga na yo? Oh kufa, wapi nguya na yo? »

06 Barome 8:31

Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?

07 1 Yoane 5:4-5

pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso. Nani oyo alongaka mokili? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.

Bantína oyo etali