Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Na nse ya mapapu na Ye

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Na nse ya mapapu na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 91:4

Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.

02 Banzembo 91:1-2

Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »

03 Banzembo 17:8

Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,

04 Banzembo 57:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.

05 Matayo 23:37

Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki!

06 Banzembo 36:7

Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.

07 Banzembo 63:7

Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu;

08 Rite 2:12

Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye!

09 Banzembo 61:4

Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.

10 Deteronomi 32:11

Azali lokola mpongo oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.

11 Luka 13:34

Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.

12 Banzembo 91:11

pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.

13 Banzembo 121:5

Yawe azali mobateli na yo; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

Bantína oyo etali