Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bobangi

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Bobangi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 41:10

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.

02 Banzembo 56:3

Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.

03 2 Timote 1:7

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

04 Banzembo 27:1

Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai; nakobanga nani? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai; nakolenga liboso ya nani?

05 Jozue 1:9

Boni, nalobaki na yo te: Zala makasi mpe yika mpiko? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »

06 Banzembo 23:4

Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

07 Banzembo 34:4

Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.

08 Deteronomi 31:6

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »

09 Ezayi 43:1

Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele: « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.

10 1 Yoane 4:18

Kati na bolingo, kobanga ezalaka te; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.

11 Banzembo 118:6

Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?

12 Barome 8:15

Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka: « Tata! »

13 Banzembo 46:1-2

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi. Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.

14 Ba-Ebre 13:6

Boye tokoki koloba na elikya nyonso: « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini? »

15 Banzembo 91:1-2

Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »

Bantína oyo etali