Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobondisama
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Kobondisama mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso: abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama!
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka; batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.
Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,