Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Motema mpe Mayoki
Makomi elobaka na boboto na mayoki nyonso ya motema — bobangi mpe libɔndisi, mawa mpe esengo, mitungisi mpe kimia. Bwaka mitungisi na yo nyonso likoló na ye, mpo amibanzabanzaka mpo na yo. Bavɛrsɛ oyo ememaka bopusani ya Nzambe na nyonso oyo ozali koyoka.
Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko: mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.
Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
Neyemi alobaki na bango lisusu: — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te!
Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso: abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
Boni, nalobaki na yo te: Zala makasi mpe yika mpiko? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba: « Wapi Nzambe na yo? »
Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.
— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo; liboso ete obotama, nabulisaki yo: naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.
Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika; pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe.