Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Motema oyo ebukani

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Motema oyo ebukani mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 147:3

Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.

02 Banzembo 34:18

Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.

03 Banzembo 51:17

Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

04 Ezayi 61:1

Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko;

05 Matayo 11:28

Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, nakopesa bino bopemi.

06 Banzembo 73:26

Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.

07 Banzembo 30:5

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.

08 Ezayi 57:15

Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.

09 Banzembo 109:22

Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai.

10 Banzembo 34:17

kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.

11 2 Bakolinto 1:3-4

Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso: abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.

12 Banzembo 56:8

Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo!

13 Yoane 16:22

Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.

14 Emoniseli 21:4

Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »

15 Banzembo 138:7

Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.

Bantína oyo etali