Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bozangi-baninga
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bozangi-baninga mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki: « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike, mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.
bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Ata tata mpe mama na ngai basundoli ngai, Yawe akolokota ngai.
Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, nasimbi makasi loboko na yo ya mobali mpe nazali koloba na yo: ‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
Nakotika bino te lokola bana bitike; nakozongela bino.
Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo? Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo? Soki namati na likolo, ozali kuna; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna. Soki nazwi mapapu ya lipekapeka mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene, kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai, loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. »