Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komitungisa

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Komitungisa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 6:34

Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko: mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.

02 Matayo 6:25-26

Yango wana, nazali koloba na bino: bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna: tokolia nini to tokomela nini? To na tina na banzoto na bino, na komituna: Tokolata nini? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina? Botala ndeke ya likolo: elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango?

03 Bafilipi 4:6-7

Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.

04 Luka 12:22-23

Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Yango wana, nazali koloba na bino: bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna: tokolia nini? To na tina na banzoto na bino, na komituna: Tokolata nini? Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.

05 Matayo 6:33

Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.

06 1 Petelo 5:7

Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.

07 Matayo 6:27

Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye?

Bantína oyo etali