Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mawa

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Mawa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 34:18

Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.

02 Matayo 5:4

Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama!

03 Yoane 11:35

Yesu alelaki.

04 Emoniseli 21:4

Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »

05 1 Batesalonika 4:13

Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.

06 Banzembo 30:5

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.

07 Ezayi 53:3

Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.

08 Banzembo 31:9

Okabaki ngai te na maboko ya monguna na ngai, kasi obombaka ngai mosika, na esika ya kimia penza.

09 2 Bakolinto 1:3-4

Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso: abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.

10 Banzembo 56:8

Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo!

11 Yoane 14:1

Yesu alobaki: — Tika ete mitema na bino etungisama te! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.

12 Ezayi 61:3

komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.

13 Banzembo 147:3

Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.

Bantína oyo etali