Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kozanga elikya
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Kozanga elikya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba: « Wapi Nzambe na yo? »
Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya: Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te; ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene!
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Natiaki elikya na ngai kati na Yawe; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Nakozalaka na elikya na likambo oyo: nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi. Talela Yawe! Zala makasi mpe yika mpiko! Talela Yawe!
Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Oh banguna na ngai, boseka ngai te! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.