Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Botɔndi
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Botɔndi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.
Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso;
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.