Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nsɔni
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Nsɔni mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
01 Barome 10:11
Makomi eloba: « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »
02 Ezayi 61:7
Na esika ya soni na bino, bokozwa litomba mbala mibale, mpe na esika ya kosambwa, bokosepela na libula na bino. Boye, bokozwa litomba mbala mibale kati na mokili na bino mpe bokosepela mpo na libela.
Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
04 Barome 8:1
Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.
05 Ezayi 54:4
Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali;