Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobanga bato

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Kobanga bato mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 29:25

Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.

02 Ezayi 51:12

« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti?

03 Bagalatia 1:10

Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo: nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe? Boni, nazali koluka kosepelisa bato? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.

04 Banzembo 118:6

Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?

05 Matayo 10:28

Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.

06 Yoane 12:43

pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.

07 1 Batesalonika 2:4

Kasi ezali mpo ete Nzambe amekaki biso mpe amonaki ete tobongi mpo na kopesamela mokumba ya koteya Sango Malamu. Yango wana mpe toteyaka te mpo na kosepelisa bato, kasi mpo na kosepelisa Nzambe oyo ayebi mozindo ya mitema na biso.

08 Misala ya Bantoma 5:29

Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki: — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te!

Bantína oyo etali