Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bwaka mitungisi na yo
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bwaka mitungisi na yo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, nakopesa bino bopemi. Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.
Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala:
Yango wana, nazali koloba na bino: bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna: tokolia nini to tokomela nini? To na tina na banzoto na bino, na komituna: Tokolata nini? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina?
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.
Soki natungisami na makanisi ebele, kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.
Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai: Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te!