Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lobwaku

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Lobwaku mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 23:4

Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

02 Banzembo 23:1-3

Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te. Apemisaka ngai na matiti ya mobesu, mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia. Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.

03 Ezayi 43:2

Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te;

04 Banzembo 46:1-2

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi. Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.

05 Banzembo 84:6

Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo; bakendaka na esengo na Tempelo na Yo!

06 Banzembo 23:5

Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.

Bantína oyo etali