Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Minyoko

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Minyoko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Timote 3:12

Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.

02 Matayo 5:10-11

Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango! Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai!

03 1 Petelo 4:14

Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino.

04 Barome 8:35-37

Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga? Kolanda ndenge ekomama: « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. » Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.

05 Yoane 15:20

Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino: « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.

06 2 Bakolinto 4:8-9

Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.

07 1 Petelo 3:14

Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.

08 Misala ya Bantoma 5:41

Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu.

09 Matayo 5:44

Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.

10 2 Timote 2:12

Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso;

Bantína oyo etali