Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Pasi
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Pasi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.
Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai, mpo ete nayekola mitindo na Yo.
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka; batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.
Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.
Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye. Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi.
Esengo na moto oyo Nzambe apameli! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.