Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bopasi
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Bopasi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nakanisi ete pasi ya tango oyo ekokani te na motuya ya nkembo oyo ekomonisama mpo na biso.
Balingami, bokamwa te bapasi oyo bozali komona, lokola nde likambo ya kokamwa ekomeli bino. Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.
Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso: abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.
Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,
Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.
Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi.
Posa monene ya motema na ngai ezali: koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye
Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.
Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula: tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.
Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso;
Pamba te, lokola Ye moko amonaki pasi tango amekamaki, akoki mpe kosunga bato oyo bazali komekama.