Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolɛmbu

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Bolɛmbu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 12:9

Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.

02 2 Bakolinto 12:10

Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.

03 Ezayi 40:29

Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.

04 Ba-Ebre 4:15-16

Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te. Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

05 2 Bakolinto 4:7

Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.

Bantína oyo etali