Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobikisama na bokono

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kobikisama na bokono mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jeremi 17:14

Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo!

02 Banzembo 103:2-3

Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye! Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,

03 Ezayi 53:5

Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.

04 Kobima 15:26

Alobaki: « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »

05 Banzembo 147:3

Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.

06 Banzembo 30:2

Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.

07 Jake 5:15

pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye.

08 1 Petelo 2:24

Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.

09 Banzembo 41:3

Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.

10 Matayo 4:23

Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.

11 Masese 3:7-8

Tika ete omimonaka te moto ya bwanya na miso na yo moko; tosa Yawe mpe longwa na mabe. Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono mpe kolendisa mikuwa na yo.

12 Oze 6:1

Boya, tozonga epai na Yawe! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.

Bantína oyo etali