Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokono

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Bokono mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 5:14-15

soki mpe mosusu kati na bino azali kobela, tika ete abenga bakambi ya Lingomba mpo ete babondela mpo na ye mpe bapakola ye mafuta na Kombo ya Nkolo, pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye.

02 Banzembo 41:3

Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.

03 Matayo 8:16-17

Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango; abikisaki mpe babeli nyonso. Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki: « Amemaki mokumba ya pasi na biso mpe abikisaki biso na bokono na biso. »

04 Ezayi 53:4

Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.

05 Banzembo 103:2-3

Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye! Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,

06 Banzembo 38:9

Nalembi, makasi na ngai nyonso esili; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.

07 Malako 2:17

Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.

Bantína oyo etali