Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kondimela bokonzi na Ye

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Kondimela bokonzi na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 16:9

Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

02 Masese 3:5-6

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

03 Banzembo 37:5

Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala:

04 Jeremi 10:23

Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.

05 Ezayi 26:3

Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

06 Banzembo 56:3-4

Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele. Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.

07 Naumi 1:7

Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.

08 Banzembo 9:10

Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.

09 Ezayi 41:10

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.

Bantína oyo etali