Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ngonga ya Nzambe
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Ngonga ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango, mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango, na se ya moyi.
Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,
Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka; solo, ekokokisama, ekowumela te.
« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » elobi Yawe. « Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.
Talela Yawe! Zala makasi mpe yika mpiko! Talela Yawe!