Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Eloko ekoki kozanga te epai ya Nzambe

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Eloko ekoki kozanga te epai ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 1:37

Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.

02 Matayo 19:26

Wana Yesu atalaki bango, alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema!

03 Jeremi 32:17

Oh Nkolo Yawe! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo: olembanaka likambo moko te.

04 Ebandeli 18:14

Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.

05 Malako 10:27

Yesu atalaki bango mpe alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, ekosalema penza; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.

06 Yobo 42:2

« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.

07 Zakari 8:6

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

08 Ba-Efeso 3:20

Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,

09 Malako 14:36

Azalaki kobondela: — Tata! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.

10 Mitango 11:23

Yawe alobaki na Moyize: — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.

11 Luka 18:27

Yesu azongisaki: — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.

12 Matayo 17:20

Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo: soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo: « Longwa awa, kende kuna; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [

13 Banzembo 115:3

Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.

14 Ezayi 59:1

Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te mpo na kobikisa, litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka!

15 2 Masolo ya Kala 14:11

Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.

Bantína oyo etali