Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nzambe Akonzaka

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Nzambe Akonzaka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 10 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Banzembo 93:1 Vɛrsɛ ya ntina

Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.

02 Banzembo 47:8

Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

03 Emoniseli 19:6

Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi; ezalaki koganga: « Aleluya! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.

04 Ezayi 52:7

Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona: « Nzambe na yo azali Mokonzi! »

05 Banzembo 96:10

Boloba kati na mabota: « Yawe azali Mokonzi! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »

06 Banzembo 99:1

Yawe azali kokonza; tika ete bato balenga! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe; tika ete mabele eningana!

07 1 Masolo ya Kala 16:31

Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete baloba kati na bikolo: « Yawe azali mokonzi! »

08 Banzembo 145:13

Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.

09 Daniele 7:14

Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.

10 Kobima 15:18

Yawe akotikala mokonzi libela na libela!

Bantína oyo etali