Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mikano na Ye etikalaka ngwi

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Mikano na Ye etikalaka ngwi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 46:10

Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki: « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »

02 Masese 19:21

Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.

03 Yobo 42:2

« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.

04 Banzembo 33:11

Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.

05 Ezayi 14:24

Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi: « Solo, ndenge kaka nabongisi, ndenge wana mpe ekosalema; makambo oyo nazali na yango na makanisi, yango nde ekokokisama.

06 Yobo 23:13

Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye; nani akoki kotelemela Ye? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.

Bantína oyo etali