Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mosali-mbeki mpe Putulu
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Mosali-mbeki mpe Putulu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki?
Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo? » Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko?
Bozali nde kobongola makambo! Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango: « Asalaki ngai te? » Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki: « Ozali mayele te? »
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi. Misala na Yo ezali ya kokamwa; ngai, nayebi yango malamu.
Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai; olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai? Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu?
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: ‹ Ozali kosala nini? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba: ‹ Azali na maboko te? ›
Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya! Boni, Yawe azali Tata na bino te? Azali Mokeli na bino te? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.
Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe; ngai mpe nawutaki na putulu.
moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, oyo nasalaki mpe nabongisaki. »