Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokonzi ya Nzambe

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bokonzi ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 103:19

Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.

02 Banzembo 47:8

Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

03 1 Masolo ya Kala 29:11-12

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso. Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo; ozali na bokonzi likolo na nyonso, makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.

04 Banzembo 22:28

Mokili mobimba ekokanisa Yawe, ekomipesa epai na Ye; mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.

05 Banzembo 115:3

Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.

06 Daniele 4:34

Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.

07 Banzembo 96:10

Boloba kati na mabota: « Yawe azali Mokonzi! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »

08 Ezayi 40:15

Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini, lokola putulu kati na emekelo kilo! Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza.

09 Banzembo 145:13

Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.

10 Ba-Efeso 1:11

Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,

Bantína oyo etali