Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makambo nyonso mpo na bolamu

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Makambo nyonso mpo na bolamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 8:28

Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.

02 Ebandeli 50:20

Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.

03 Barome 8:31

Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?

04 Bafilipi 1:6

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

05 Banzembo 23:6

Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai.

06 Banzembo 84:11

Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.

07 Jeremi 29:11

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Bantína oyo etali