Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mabongisi na Ye

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Mabongisi na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jeremi 29:11

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

02 Masese 19:21

Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.

03 Ezayi 55:8-9

« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » elobi Yawe. « Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.

04 Barome 8:28

Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.

05 Banzembo 138:8

Yawe akokisaka makambo nyonso mpo na bolamu na ngai. Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko! Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo!

06 Banzembo 33:11

Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.

07 Ezayi 14:24

Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi: « Solo, ndenge kaka nabongisi, ndenge wana mpe ekosalema; makambo oyo nazali na yango na makanisi, yango nde ekokokisama.

08 Masese 16:9

Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

09 Ba-Efeso 2:10

Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.

10 Ezayi 46:10

Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki: « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »

Bantína oyo etali