Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Libala, Libota mpe Kobɔkɔla bana
Nzambe abongisaki libala, libota, mpe kobokola bana lokola bisika ya komonisa bolingo mpe bosembo na ye. Abengaka mibali, basi, baboti, mpe bana kopesana lokumu kati na Nkolo. Bavɛrsɛ oyo ememaka bwanya mpe ngolu na ye kati na ndako.
Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.
Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
Nani akoki komona mwasi ya lokumu? Azali na motuya koleka babiju ya talo.
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.
mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.
Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.