Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Singa ya basinga misato

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Singa ya basinga misato mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Mosakoli 4:12

Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.

02 Mosakoli 4:9

Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.

03 Mosakoli 4:10

Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye!

04 Barome 12:10

Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;

05 Bafilipi 2:2

botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko.

06 Mosakoli 4:9-12

Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango. Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye! Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bayokaka moto; kasi moto oyo azali ye moko, ndenge nini akoki koyoka moto? Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.

07 Amosi 3:3

Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko soki bayokani te?

08 Matayo 18:20

Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.

09 Barome 15:5-6

Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto, mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko.

10 1 Bakolinto 1:10

Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te; bozala motema moko mpe makanisi moko.

Bantína oyo etali