Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolingo mpe limemya

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Bolingo mpe limemya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 5:33

Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

02 Ba-Efeso 5:25

Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango

03 1 Petelo 3:1-2

Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.

04 Bakolose 3:19

Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango.

05 1 Bakolinto 13:4-5

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.

06 1 Petelo 3:7

Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.

07 Barome 12:10

Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;

Bantína oyo etali