Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kopesa baboti limemya
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Kopesa baboti limemya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka: Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo;
Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.