Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Libala

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Libala mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ebandeli 2:24

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

02 Ba-Efeso 5:31

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.

03 Ba-Ebre 13:4

Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.

04 Malako 10:9

Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.

05 Masese 18:22

Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

06 1 Bakolinto 13:4-7

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe. Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo. Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.

07 Bakolose 3:14

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.

08 Loyembo ya Salomo 8:6-7

Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe. Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye.

09 Mosakoli 4:9-10

Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango. Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye!

10 Masese 5:18-19

Tika ete etima na yo epambolama, mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo, oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo!

11 1 Bakolinto 7:2-3

Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye.

12 Malashi 2:15

Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge!

Bantína oyo etali