Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwasi ya ezaleli malamu
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Mwasi ya ezaleli malamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nani akoki komona mwasi ya lokumu? Azali na motuya koleka babiju ya talo.
Alataka lokola elamba: molende na mosala mpe lokumu; mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango. Alobaka na bwanya, mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.
Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.
Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.
Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
Mobali na ye atielaka ye motema mpe azangaka te biloko ya motuya.
Azalaka na bokebi na makambo nyonso oyo elekaka na ndako na ye, mpe aliaka lipa na bogoyigoyi te. Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye, mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye:
Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko; kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati: esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.
Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola, mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.
mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango, komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.