Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ndako
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Ndako mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.
Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele. Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi.
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
Bazongisaki: — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
Koma yango na makonzi ya ndako na yo mpe na bikuke na yo.
Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.
Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
Azalaka na bokebi na makambo nyonso oyo elekaka na ndako na ye, mpe aliaka lipa na bogoyigoyi te.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.