Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobɔkɔla bana
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kobɔkɔla bana mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.
Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki. Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango, mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango, ekeke ya bana oyo bakobotama. Tika ete batelema mpe bayebisa yango na bana na bango,
Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.
Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.
Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.