Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bana
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Bana mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.
Yesu alobaki: — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba, ndenge wana mpe bana oyo moto aboti na bolenge na ye bazali. Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.
Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
Bakitani bazali motole ya bakoko, mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli: — Botika bana mike baya epai na Ngai; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.