Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobɔkɔla bana na nzela ya Nzambe

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kobɔkɔla bana na nzela ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 22:6

Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

02 Deteronomi 6:6-7

Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

03 Ba-Efeso 6:4

Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.

04 Banzembo 78:4

Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

05 Masese 29:17

Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.

06 Masese 22:15

Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.

07 Masese 13:24

Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.

08 2 Timote 1:5

Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.

09 Masese 1:8-9

Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo; Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.

10 Ezayi 54:13

Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.

11 Deteronomi 4:9

Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.

12 3 Yoane 1:4

Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.

Bantína oyo etali