Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mosuni moko

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Mosuni moko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Malako 10:8

mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.

02 Ebandeli 2:24

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

03 Ba-Efeso 5:31

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.

04 Malako 10:9

Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.

05 1 Bakolinto 6:16

Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba akomi elongo na ye nzoto moko? Pamba te elobama: « Bango mibale bakokoma nzoto moko. »

06 Ebandeli 2:23

Boye, mobali alobaki: « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »

07 Matayo 19:5-6

mpe ete alobaki: « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi! »

08 Ba-Efeso 5:28-31

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye. Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.

09 Ebandeli 2:25

Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.

10 1 Bakolinto 7:4

Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.

11 Malashi 2:15

Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge!

12 Masese 18:22

Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

13 Barome 7:2

Ndakisa: Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali.

Bantína oyo etali