Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kopesa etumbu na bolingo

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Kopesa etumbu na bolingo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 13:24

Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.

02 Masese 22:15

Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.

03 Ba-Ebre 12:11

Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango: bomoi ya bosembo mpe ya kimia.

04 Masese 29:17

Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.

05 Masese 3:11-12

Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye; pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.

06 Masese 19:18

Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.

07 Emoniseli 3:19

Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.

Bantína oyo etali