Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bondimi ya libota

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bondimi ya libota mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Timote 1:5

Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.

02 Jozue 24:15

Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »

03 Deteronomi 6:6-7

Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

04 Misala ya Bantoma 16:31

Bazongisaki: — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.

05 Banzembo 78:4

Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

06 1 Timote 3:4-5

moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka. Moto oyo ayebi te kokamba malamu libota na ye akokoka ndenge nini kobatela Lingomba ya Nzambe?

07 Ebandeli 18:19

Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »

08 Deteronomi 11:19

Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.

Bantína oyo etali