Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Konyokola
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Konyokola mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!
Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.
Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso.
Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi: Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.
Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo, pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.
ba-oyo balobaka: « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso; nani akoluka kozala nkolo na biso? »
Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.
Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato! Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike.
Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.
Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala; abimisaka bakangami na boloko.
tala liloba oyo Yawe alobi: Bosalela bosembo mpe bosolo; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.
lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.