Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bosembo

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Bosembo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 11 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Mishe 6:8 Vɛrsɛ ya ntina

Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

02 Ezayi 1:17

Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!

03 Amosi 5:24

Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.

04 Masese 21:3

Na miso na Yawe, kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya koleka bambeka ya kotumba.

05 Deteronomi 16:20

Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.

06 Zakari 7:9

— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.

07 Banzembo 33:5

Yawe alingaka bosembo mpe alima; mokili etondi na bolingo na Ye.

08 Ezayi 30:18

Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo: Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye!

09 Masese 31:9

Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.

10 Jeremi 22:3

tala liloba oyo Yawe alobi: Bosalela bosembo mpe bosolo; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.

11 Banzembo 106:3

Esengo na bato oyo babatelaka mibeko mpe batambolaka na bosembo!

Bantína oyo etali