Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokabi epai ya babola

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Bokabi epai ya babola mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 22:9

Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.

02 Masese 19:17

Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

03 Masese 28:27

Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.

04 Luka 14:13-14

Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono; mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.

05 2 Bakolinto 9:9

kolanda ndenge ekomama: « Akabelaka babola na motema ya esengo, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela. »

06 Deteronomi 15:11

Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.

07 Misala ya Bantoma 20:35

Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba: « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »

Bantína oyo etali