Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobatela bato ya bolɛmbu

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Kobatela bato ya bolɛmbu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 82:3

Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola;

02 Masese 31:8-9

Fungola monoko na yo mpo na kolobela bato oyo bazali na makoki ya koloba te, mpe mpo na kolongisa bato oyo bazanga basungi. Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.

03 Ezayi 1:17

Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!

04 Banzembo 72:4

Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.

05 Jeremi 22:3

tala liloba oyo Yawe alobi: Bosalela bosembo mpe bosolo; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.

06 Banzembo 82:4

bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.

07 Masese 24:11-12

Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa, mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa lokola bato oyo balangwe masanga. Soki olobi: « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye?

08 Ezayi 1:23

Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.

09 Deteronomi 27:19

« Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »

10 Banzembo 41:1

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

Bantína oyo etali