Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Babola

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Babola mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 19:17

Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

02 Masese 14:31

Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.

03 Banzembo 41:1

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

04 Bagalatia 2:10

Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.

05 Masese 28:27

Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.

06 Banzembo 140:12

Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

07 Luka 14:13

Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono;

08 Masese 22:9

Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.

09 Masese 29:7

Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.

10 Deteronomi 15:7-8

Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola. Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga.

11 Banzembo 113:7

Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola

12 Luka 4:18

« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama

13 Jake 2:5

Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka: Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye?

14 Masese 31:9

Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.

Bantína oyo etali