Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobatela bato bazangi

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kobatela bato bazangi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 14:31

Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.

02 Deteronomi 15:11

Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.

03 1 Yoane 3:17

Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye?

04 Ezayi 58:10

soki opesi bilei na yo epai na ye oyo azali na nzala mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, pole na yo ekongenga kati na molili, mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.

05 Masese 19:17

Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

Bantína oyo etali